Mobeko ya muvema/Makambo ya kati/Mituya mpe Mitindo

This page is a translated version of the page Movement Charter/Content/Values & Principles and the translation is 44% complete.
Outdated translations are marked like this.


Bokundoli ya mituya mpe mitindo epayi ya moko yabayi lisanga bakomi ya MCDC Georges Fodouop.

Tozali komonisa lolenge ya kosala boyebi oyo etongami na makambo ya solo, ya polele mpe ya bato banso. Ba projets na biso ezali na mosala ya boyebi pona bayoki na molongo mobimba, pe bisika oyo eyambaka ba projets ezali kotambwisama na makanisi ya bonsomi. Mibeko mpe misala na biso ya mokolo na mokolo etambwisami na bizaleli ya bato ya mboka oyo epesaka nzela na ba Wikimedians banso na mokili mobimba mpo na kosangana na bosembo.

Mituya mpe mitinda na biso endimi ete lolenge oyo ya bopesi boyebi ezali mosala ya boyokani, mpe ezali na mokano ya kobatela botali mingi na :

Boyebi ya ofele mpe ya polele

Tokabolaka, na molimo ya boyebi ya ofele, makambo na biso nyonso, logiciel na biso, bisika na biso na mokili mobimba, kosalelaka esaleli ya mbongwana ya ndingisa efunolami. Tozali komipesa mpo na kopesa esika mpo na boyebi oyo esili kozala marginalisé na lisolo, bakisa mpe na ba projets na biso.

Lipanda

Tosalaka makasi mpo na kosala na lipanda, kozanga koponapona moko oyo ekoki kopekisa mosala na biso ya boyebi ya ofele. Totambwisami te na makambo mosusu ya mombongo, ya politiki to ya mbongo to ya komatisa grade.

Kosangisa bato nyonso

Tozali kolendisa emonaneli oyo etali bato ya bokeli elongo pe kosangana na yango. Ba projets na biso ezali na tina ya kozala na minoko nionso pe ekoki kozwama na bisika ndenge na ndenge na ngolu pe likanisi ya kosala eloko po na mokili mobimba pe ba tekiniki ya lisalisi. Misala na biso etongami likolo mpe esimbaka bokeseni mpe makoki ya baimboka na biso. Tosalaka yango na kotiaka mpe kosala ete mibeko ya etamboli ekokisama mpe kosala ete moto nyonso ayoka ete azali na motuya ndenge moko mpe azali na kati.

Kozala na boyokani

Topesaka bokonzi na nivo ya mbala moko to ya esika oyo ebongi, ezala na bisika na biso mpe na boyangeli ya lisanga na biso. Na yango, tozali kosala ete boyangeli ya bango moko mpe autonomie ya bisika ya bofandi oyo esalaka na boyokani na ntina ya muvema ya molongo mobimba.

Bosembo

Topesaka makoki pe tosungaka ba communautés na nzela ya décentralisation pragmatique pe autonomie. Elongo na bosembo na bomonisi ya boyebi, tozali kopesa nzela na bosembo ya makoki. Tozali mpe kosala ete makoki ya nimero ya sembo, lokola bomoi ya moto ye moko, ezala na basaleli na biso mpe bato banso oyo bakosala yango, soki likoki ezali.

Mokumba

Tomipesaka mokumba na nzela ya mikanda ya polele, ya kokabola mpe oyo ekoki kobongisama soki likoki ezali, koyebisa bato banso mpe kopesa lapolo ya manaka mpe misala, mpe kopesa motuya na mingongo oyo ezali komonisa bokambi ya lisanga mpo na mikumba mpe mikumba oyo elimbolami na mokanda na biso ya mibeko.

Kokanga motema

Tozali kokola malamu na mayele ya sika mpe komeka, ntango nyonso kozongisa sika emonaneli ya esika ya boyebi ya polele ekoki kozala. Tolandaka mayele mpe misala ya malamu oyo esalemi na bilembeteli. Tozali kolendisa mimeseno ya bowumeli na ba structures mpe ba communautés na biso.